Territoire na watsa na etuka ya uele na likolo na ngambo moyi ekobimaka na ekolo Kongo democratike ezali kolekisa mikolo ya kpokoso makasi penza po etali bozangi bokengi to insécurité na lopoto .

Pona Yango mwana mboka Benjamin Tauli Oyebi auti kobandisa Yoko bobyangi pona bilenge na maye basengeli kosala pona kosukisa likambo Yango na bo lengeli masano ya matopi « football » pe ba pokwa ya mabina to pe « soirée culture na lopoto na etando iso ya territoire ya watsa.

Na Yoko masolo asalaki na ba panzi sango ya visionactu.net Yoko lolaka ekopesaka ba sango o nzela ya bokomi ,ayebisi ete soki bokengi bozali te maso mazali bobele mpamba ya motuya koleka na territoire ya watsa eza ete bozangi bokengi bosila Nye mpenza to pe stop insécurité na lopoto.

Mwana mboka Benjamin Tauli Oyebi azangaki pe te kosenga na bayi mboka kotalisa bato baso ya mabe pote bozangi bokengi Yango esila Zambi bokengi ezali likambo ya bato banso.

Nayebisa pe bino ete Benjamin Tauli Oyebi azali kolemba te pona kobyanga bayi mboka ya watsa tango iso na maye matali bokengi .

Dudu Joseph o ekomeli .

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *