Sima ya bokimi ya bakangemi ondako eyindo enene Amiza oyo ezwami na engumba isiro na butu ya mokolo mwa sanza zomi na sanza ya libwa mobu moye tozali esili kokotisa bobangi makasi oteyi ya bayi mboka ya uele na likolo.pene pene bakangemi tuku mine na libwa otei ya bango ba dongolo miso ya minene minene basili kokima. Natina ena société civile ezali kotombola mongongo kobyanga mbula matari kosala malamu mosala mwa ye.

Kolandana na basango tozwi,otei ya badongolo miso baye bakimi o ndako eyindo,ezali pe na baye bakangamaki na esambiselo eye eutaki kosalema na mboka wanga,mboka mokonzi ya secteur gombari.nzoka nde bato baye batindamaki na ndako eyindo enene o engumba isiro po’te bayanola na Maye bango basalaki.bokimi na bango esili kopesa bobangi makasi na bayi mboka ya secteur gombari eye bayokaki bwale makasi pona bozangi bokengi.

Nayoko masolo asalaki na ba panzi sango ya visionactu.net mokolo mwa mosala mibale mwa zomi na motoba na sanza ya libwa, fiston nyede molobi maloba ya société civile ya secteur gombari,ayebisi ete ye penza asepeli te na likambo Yango .

« Société civile ya secteur gombari esepeli te na lolenge eye ya kosala ya mbula matari .nzokande mbula matari esengelaki ezwa maso mabongi pona kokengele bakangemi eye pona kobatela pe bayi mboka « bo elobaki ye .

Poya ye akanisi ‘te kokima ya badongolo miso baye ezali mbuma ya mosala na lolenge Kani mbula matari azali na likebi te poya ndako ya bakangemi.

Kokima ya ba ndongolo miso eye ezali kpokoso makasi pona bayi mboka ya secteur gombari pe zonga zonga . nzokande mabota mingi ya etuka ya uele na likolo ezali kotombola mongongo poya kolakisa bobangi na bango poya bokimi na bato baye o ba mboka ya bango.

Mbula matari esengeli esala maso na mwa lombango po ya bobandisi boluki luki po’te bakoka kotiya maboko nalombango penza na bato baye . bo esengi fiston nyede.

Likolo ya maso wana ba masanga ya société civile ya secteur gombari ezali kosenga na mbula matari ya etuka kosala na lombango kobanda kotonga ndako eyindo enene ya mambaya o engumba isiro pe kosukisa mosaya ya ndako eyindo enene ya mboka watsa oyo bayi mboka bazali kozela leka mwa mikolo.

Dudu Joseph o ekomeli.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *